Matthew 10

Yesu atindi Bapostolo na ye zomi na mibale

(Mk. 3.13-19 ; Lk. 6.12-16)

1Yesu abengaki bayekoli na ye zomi na mibale, mpe apesaki bango bokonzi mpo na kobengana milimo mabe, mpe mpo na kobikisa maladi nyonso mpe bapasinyonso. 2Tala bakombo ya bapostolo zomi na mibale : ya liboso, Simon oyo babengaka Piere, Andele ndeko ya Piere, Zaki mwana ya Zebede, Jean ndeko ya Zaki ; 3Filipi mpe Batelemi ; Toma mpe Matie mofutisi mpaku ; Zaki mwana ya Alfe mpe Tade ; 4Simon oyo azalaki moto ya lisanga ya Bazelote
Bazelote  : lisanga ya politique oyo esalamaki pene-pene na tango ya mbotama ya Yesu.
, mpe Yuda Iskariote oyo atekaki Yesu.

(Mk. 6.7-13 ; Lk. 9.1-6)

5Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima ya kopesabango mitindo oyo :

—Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bavile ya bato ya Samariya.
6Kasi bokende epai ya bameme ebunga oyo ya libota ya Isayele. 7Tango bokokende, boteya ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene-pene. 8Bobikisa bato ya maladi, basekwisa bato bakufa, bopetola bato ya maladi ya maba, mpe bobengana milimo mabe. Bopesa ofele, mpo bino mpe bozwaki ofele. 9Bomema wolo te, palata te, ata mpe mbongo te na baposi na bino. 10Bomema sakosi te, elamba mosusu te, sapato mosusu te, ata mpe nzete te, mamba te “mosali asengeli kozwa bilei na ye na mosala na ye”.

11Tango bokokota na vile to mboka moko, boluka moto oyo azali ya kokoka mpo na koyamba bino, mpe bovanda na ndako wana kino tango bokokende. 12Tango bokoti na ndako moko, bopesa bato ya ndako yango mbote. 13Mpe soki ndako yango ezali ya kokoka, tika ete kimia na bino ezala likolo na yango ; kasi soki ezali ya kokoka te, tika ete kimia na bino ezonga epai na bino. 14Soki baboyi koyamba bino na vile moko to na ndako moko, to koyoka maloba na bino, bobima na ndako wana to na vile wana, mpe bopupola makolo na bino. 15Ya solo nalobi na bino : na mokolo ya kosambisama, vile wana ekozwa etumbu monene koleka etumbu ya mokili ya Sodomo mpe Gomore.

Mikakatano ya mosala ya Nkolo

(Mk. 13.9-13 ; Lk. 21.12-19)

16—Boyoka, natindi bino lokola bameme na kati ya bambwa ya zamba ; bozala na bokebi lokola banyoka, mpe bozala kimia lokola bapijon. 17Kasi bokeba, pamba te bakofunda bino na tribunale ya Bayuda ; mpe bakobeta bino bafimbo na bandako na bango ya mayangani.

18Ya solo, bakomema bino liboso ya bayangeli mpe liboso ya mikonzi minene mpo na ngai ; na bongo nde, bokozwa nzela ya kotatola kombo na ngai epai na bango mpe epai ya bato ya bikolo mosusu. 19Tango bakokanga bino, bomitungisa te mpo na makambo oyo bokoloba, pamba te, maloba ya koloba ekobima kaka na tango wana. 20Mpo ekozala bino te bato bokoloba, kasi ekozala nde Molimo ya Tata na bino nde akoloba na minoko na bino.

21Ndeko moko akoteka ndeko na ye mpo abomisa ye ; tata akoteka mwana na ye ; bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango. 22Bato nyonso bakoyina bino mpo na ngai. Kasi moto oyo akotia molende kino na suka, akobika.

23Soki banyokoli bino na vile moko, bokima na oyo mosusu. Nalobi na bino ya solo : bokosilisa te kokimakima na bavile nyonso ya Isayele liboso ete Mwana ya moto aya.

24Mwana ya kelasi aleki molakisi na ye te, moto ya mosala aleki mpe mokonzi na ye te. 25Ekoki na mwana kelasi akoma lokola molakisi na ye, mpe moto ya mosala akoma lokola mokonzi na ye. Soki babengaki nkolo ya ndako Belzebule, bongo bakoloba nini na bato ya ndako na ye ?

Koyika mpiko na mosala ya Nkolo

(Lk. 12.2-9)

26—Yango wana bobanga bango te ; pamba te makambo nyonso oyo ebombama ekomonana polele, mpe makambo nyonso ya sekele ekoyebana. 27Makambo oyo nayebisi bino sikʼoyo na molili, boloba yango na moi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango na likolo ya ndako.

28—Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bakoki te koboma elimo
Elimo babengaka yango “âme” na monoko ya français
na bino. Kasi bobanga kaka ye oyo akoki koboma nzoto na elimo, na lifelo.
29Boni, batekaka bandeke ya mike-mike mibale na likuta moko te ? Nzokande, ata moko na yango te ekoki kokweya na nse soki Tata na binoya Likolo ayebi te. 30Mpe mpo na bino, boyeba malamu ete, ata basuki ya motu na bino ezali ya kotangama. 31Yango wana, bobanga te pamba te bino boleki bandeke ebele na motuya. 32Moto oyo akondima ngai na miso ya bato, ngai mpe nakondima ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na Likolo. 33Kasi oyo akowangana ngai na miso ya bato, ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.

(Lk. 12.51-53)

34—Bokanisa te ete nayaki mpo na komemela bino kimia na mokili ; namemeli bino kimia te, kasi mopanga ya etumba. 35Naye mpo na kokabola mwana mobali na tata na ye, mwana mwasi na mama na ye, mpe mwasi ya libala na bokilo na ye ya mwasi. 36Banguna ya moto, bakozala kaka bato ya libota na ye moko.

(Lk. 14.26-27)

37—Moto oyo akolinga tata na ye mpe mama na ye koleka ngai, azali ya kokoka te mpo azala moto na ngai. Moto oyo akolinga mwana na ye ya mobali to ya mwasi koleka ngai, azali ya kokoka te mpo azala moto na ngai. 38Moto oyo akomema ekulusu na ye te mpe alandi ngai te, azali ya kokoka te mpo azala moto na ngai. 39Moto oyo akoluka kobikisa bomoi na ye akobungisa yango ; kasi oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai akozwa yango.

40—Moto oyo ayambi bino ayambi ngai ; mpe oyo ayambi ngai, ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai. 41Moto oyo ayambi moprofeta mpo azali moprofeta, akozwa lifuti ndengemoko lokola oyo ya moprofeta. Mpe moto oyo ayambi moto na sembo mpo azali moto na sembo, akozwa lifuti ndenge moko lokola oyo ya moto na sembo. 42Moto oyo akopesa ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko ya bana mike oyo mpo azali moyekoli na ngai, nalobi na bino ya solo, akozwa lifuti na ye.
Copyright information for LinMNB